19
Nzembo ya elonga
Sima na makambo wana, nayokaki lokola makelele ya bato ebele koganga kuna na Lola :
« Aleluya !
Lobiko, nkembo mpe nguya ezali ya Nzambe na biso,
pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ;
apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene
oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye,
mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. »
Bagangaki na mbala ya mibale :
« Aleluya !
Pamba te molinga kowuta na mwasi ya ndumba monene
ezali komata na likolo mpo na libela na libela ! »
Bampaka tuku mibale na minei mpe bikelamu minei ya bomoi bafukamaki mpe bagumbamelaki Nzambe oyo avandaka na Kiti ya Bokonzi, mpe bagangaki :
« Amen ! Aleluya ! »
Bongo mongongo moko ebimaki wuta na Kiti ya Bokonzi mpe elobaki :
« Bokumisa Nzambe na biso ;
bino bawumbu na Ye nyonso,
bino oyo botosaka Ye,
mikolo mpe bana mike ! »
Feti ya libala ya Mpate
Bongo nayokaki makelele moko lokola makelele ya bato ebele, lokola makelele ya bibale minene, mpe lokola lokito ya kake makasi ; ezalaki koganga :
« Aleluya !
Pamba te Yawe na biso, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
atalisi bokonzi na Ye.
Tika ete tosepela, totonda na esengo
mpe topesa Ye nkembo !
Pamba te tango ya feti ya libala ya Mpate ekoki.
Mwasi mobandami na Ye ya libala asili komibongisa.
Elamba ya lino ya kitoko oyo ezali kongenga epesameli ye
mpo ete alata yango. »
Elamba ya lino ya peto ezali misala ya bosembo ya basantu.
Maloba ya solo ya Nzambe
Bongo anjelu alobaki na ngai : « Koma : ‹ Esengo na bato oyo babengami na feti ya libala ya Mpate ! › »
Alobaki lisusu : « Ezali maloba ya solo ya Nzambe. »
10 Bongo nafukamaki na makolo ya anjelu mpo na kogumbamela ye, kasi alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo, oyo babatelaka litatoli ya Yesu. Fukamela nde Nzambe ! Pamba te ezali litatoli ya Yesu nde molimo ya lisakoli. »
Lisolo ya lobiko kati na bimoniseli sambo
Emoniseli ya liboso : elonga ya Klisto
11 Bongo namonaki Lola efungwami, mpe mpunda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Kombo ya motambolisi ya mpunda yango ezali : « Sembo mpe Solo. » Akataka makambo mpe abundaka bitumba na bosembo. 12 Miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela ; mpe na moto na Ye, ezali na mitole ebele. Bakoma kombo moko na nzoto na Ye, kombo oyo Ye moko kaka nde ayebi. 13 Alati nzambala bazindisa na makila ; kombo na Ye ezali : « Liloba na Nzambe. » 14 Mampinga ya Lola ezalaki kolanda Ye na likolo ya bampunda ya pembe ; balataki bilamba ya lino ya kitoko, ya pembe mpe ya peto. 15 Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. 16 Na nzambala mpe na mopende na Ye, bakoma kombo :
« Mokonzi ya Bakonzi mpe Nkolo ya bankolo. »
Emoniseli ya mibale : feti monene ya Nzambe
17 Bongo namonaki anjelu moko atelemi kati na moyi ; azalaki koloba na mongongo makasi epai ya bandeke nyonso oyo ezalaki kopumbwa na likolo makasi : « Boya, bosangana mpo na feti monene ya Nzambe, 18 mpo ete bolia misuni ya bakonzi, ya bakonzi ya mampinga, ya bilombe, ya bampunda elongo na batambolisi na yango mpe ya bato nyonso : bawumbu to bansomi, bato minene to bato pamba. »
Emoniseli ya misato : bakangi nyama mpe mosakoli ya lokuta
19 Bongo namonaki nyama mpe bakonzi ya mokili elongo na mampinga na bango kosangana mpo na kobundisa Motambolisi ya mpunda mpe mampinga na Ye. 20 Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo. 21 Bongo mopanga oyo ebimaki na monoko ya Motambolisi ya mpunda ebomaki bato oyo batikalaki, mpe bandeke nyonso etondaki na kolia misuni ya bibembe na bango.