7
Bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei
Sima na makambo wana, namonaki ba-anjelu minei batelemi na basonge nyonso minei ya mokili, bazali kokanga mipepe nyonso minei ya mokili mpo ete mopepe ata moke te epepa na mokili to na ebale monene to mpe na banzete.
Bongo namonaki anjelu mosusu azali komata longwa na este mpe asimbi kashe ya Nzambe na bomoi. Agangaki na mongongo makasi epai ya ba-anjelu minei oyo Nzambe apesaki nguya ya kosala mabe na mokili mpe na ebale monene. Alobaki na bango : « Bosala mabe te na mokili to na ebale monene to mpe na banzete, kino tokosilisa kobeta kashe na bambunzu ya basali ya Nzambe na biso. »
Bongo nayokaki motango ya bato oyo babetamaki kashe : nkoto nkama moko na tuku minei na minei ; bazalaki bato ya mabota nyonso ya bana ya Isalaele.
 
Kati na libota ya Yuda, bato nkoto zomi na mibale babetamaki kashe ;
kati na libota ya Ribeni, bato nkoto zomi na mibale ;
kati na libota ya Gadi, bato nkoto zomi na mibale ;
kati na libota ya Aseri, bato nkoto zomi na mibale ;
kati na libota ya Nefitali, bato nkoto zomi na mibale ;
kati na libota ya Manase, bato nkoto zomi na mibale ;
kati na libota ya Simeoni, bato nkoto zomi na mibale ;
kati na libota ya Levi : bato nkoto zomi na mibale ;
kati na libota ya Isakari, bato nkoto zomi na mibale ;
kati na libota ya Zabuloni, bato nkoto zomi na mibale ;
kati na libota ya Jozefi, bato nkoto zomi na mibale ;
mpe kati na libota ya Benjame, bato nkoto zomi na mibale.
 
Bango nyonso babetamaki kashe.
Ebele ya bato liboso ya Kiti ya Bokonzi
Sima na makambo wana, namonaki ebele ya bato oyo moto ata moko te akokaki kotanga ; bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso. Batelemaki liboso ya Kiti ya Bokonzi mpe liboso ya Mpate, balataki banzambala ya pembe mpe basimbaki mandalala na maboko na bango ; 10 bazalaki koganga na mongongo makasi : « Lobiko ezali ya Nzambe na biso, oyo avandi na Kiti ya Bokonzi, mpe ezali ya Mpate. »
11 Ba-anjelu nyonso oyo bazalaki kotelema zingazinga ya Kiti ya Bokonzi, ya bampaka mpe ya bikelamu minei ya bomoi, bagumbamaki, bilongi kino na mabele, liboso ya Kiti ya Bokonzi, mpe bagumbamelaki Nzambe 12 na koloba :
« Amen !
Tika ete masanzoli, nkembo, bwanya,
matondi, lokumu, nguya mpe makasi
ezala ya Nzambe na biso,
mpo na libela na libela !
Amen ! »
13 Bongo moko kati na bampaka atunaki ngai :
— Bato oyo balati banzambala ya pembe bazali banani mpe bawuti wapi ?
14 Nazongiselaki ye :
— Nkolo na ngai, yo nde oyebi.
Bongo alobaki na ngai :
— Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate. 15 Yango wana,
batelemaka liboso ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe
mpe basalelaka Ye kati na Tempelo na Ye, butu mpe moyi ;
mpe Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi
akobatela bango kati na evandelo na Ye.
16 Bakoyoka lisusu nzala te,
posa ya mayi mpe koswa ya moyi to molunge ;
17 pamba te Mpate oyo azali na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi
akozala Mobateli na bango,
akomema bango na bitima ya mayi ya bomoi,
mpe Nzambe akopangusa mpinzoli nyonso ya miso na bango.