8
Ekangelo ya sambo
Tango Mpate afungolaki ekangelo ya sambo, kimia moko ekotaki kati na Lola mpe esalaki minite pene tuku misato.
Bongo namonaki ba-anjelu sambo oyo batelemaka liboso ya Nzambe, mpe bapesaki bango bakelelo sambo.
Anjelu mosusu ayaki mpe atelemaki na etumbelo ; amemaki mbabola basala na wolo mpo na kotumba na yango ansa. Bapesaki ye ansa ebele ya kobonza elongo na mabondeli ya basantu nyonso, mpo ete abonza yango na likolo ya etumbelo basala na wolo, liboso ya Kiti ya Bokonzi. Wuta na loboko ya anjelu, molinga ya ansa elongo na mabondeli ya basantu emataki liboso ya Nzambe.
Bongo anjelu azwaki mbabola, atondisaki yango na makala ya moto oyo azwaki na etumbelo, mpe abwakaki mbabola yango na mabele. Mbala moko, lokito moko ya makasi eyokanaki : bakake, mingongo, mikalikali mpe koningana ya mabele.
Bakelelo
Bongo ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakelelo sambo bamibongisaki mpo na kobeta yango.
Anjelu ya liboso abetaki kelelo ; mpe, mbala moko, mvula ya mabanga mike elongo na moto esangana na makila ebwakamaki na mabele. Bongo biloko oyo ezikaki : eteni moko kati na biteni misato ya mabele, eteni moko kati na biteni misato ya banzete, mpe matiti nyonso ya mobesu.
Anjelu ya mibale abetaki kelelo ; mpe na mbala moko, eloko moko lokola ngomba monene oyo ezali kopela moto ebwakamaki na ebale monene. Eteni moko kati na biteni misato ya ebale monene ekomaki makila ; mpe eteni moko kati na biteni misato ya bikelamu oyo evandaka kati na ebale monene ekufaki, eteni moko kati na biteni misato ya bamasuwa nyonso ebebisamaki.
10 Anjelu ya misato abetaki kelelo ; mpe na mbala moko, monzoto moko ya monene oyo ezali kopela lokola mwinda monene ekweyelaki, longwa na likolo, eteni moko kati na biteni misato ya bibale mpe bitima ya mayi. 11 Kombo ya monzoto yango ezali : Bololo. Eteni moko kati na biteni misato ya bamayi ekomaki bololo, mpe bato ebele bakufaki likolo na bamayi mpo ete ekomaki bololo.
12 Anjelu ya minei abetaki kelelo ; mpe na mbala moko, eteni moko kati na biteni misato ya moyi, ya sanza mpe ya minzoto ebebaki. Na bongo, eteni moko kati na biteni misato ya kongenga na yango ekomaki molili. Boye eteni moko kati na biteni misato ya mokolo mpe ya butu ezangaki pole.
13 Bongo nayokaki mpongo, oyo ezalaki kopumbwa na likolo makasi, koloba na mongongo makasi : « Mawa ! Mawa ! Mawa penza na bavandi ya mokili tango ba-anjelu misato ya suka bakobeta bakelelo na bango ! »